Kitamata

Kitamata lyrics

Original languageLN
Views162
Lyrics coordinates

Original lyrics

LN
Translation not available yet. Showing the original lyrics.
18
Aahn, Martin Lukusa Yokela nga ngo bolingo motema esali pasi Na makanisi ngai nakokondo Namituni na motema eloko oyo bolingo Ewuta wapi mama? Ekobandaka na kolula, ekoti pema Sima esimbi nzoto mobimba Ekomi kosenga zuwa lokoso na motema Olinga moto asimba te Nayebisi na bato lelo po bayeba Ndenge nalingaka yo mon amour Beauté etonda yo nani akela yo Nazui eperdement oh nabebi Linga nga tolingana oh na motema Nga naponi yo oh o motema Nasengi mingi pe defisa ngai motema na yo Nasimbela yo mwa moke Oyo suka ya beauté nasala nini ah Naye zoba Martin Eloko oyo ezanga soni, ezanga mvula Ezanga miso mama Nakomi lokola zoba lokola mwana Abotami se lelo oyo Nionso se po ya bolingo poupée na ngai eh Nasuka wapi mama Nayembi na nzеmbo lelo po oyeba Yo nde motеma na ngai, ah chérie eh Kokosaka ngai te noki te namiboma Elongwe nde bolingo ekoma magie Naboyi nazangaka yo ata ngonga moko Nalingi natalaka yo lokola tala-tala Poupée na nga oh ma belle Lukusa na nga suka beauté Oyo suka ya beauté nasala nini ah Naye zoba ima eh Eloko oyo ezanga soni, ezanga mbula Ezanga miso mama (Dédicaces) Martin Lukusa ah Attachez vos ceintures, s'il vous plait, on décolle Fally Ipup's appelle le commandant Jo Sex Pasi ya bolingo ezalaka nde somo Moto soki olingi ye, alingi na'e souffrance Okokoma kizengi, okomi komisambwisa Ah mama, kosalaka ngai boye te Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te Ngai nalingaka y'osalaka mwa geste Wana ngai nakomaka neti mwa yuma Chérie kitoko na yo epesa nga trouble Est-ce que okotela nga mwa magie na nzoto Tala ndenge nga nakomaka zoba, zoba Soki oseki nga nakomi se gentil, gentil Osala nini po nakoma se kodenge mama? Ah mama, kosalaka nga boye te eh Eh chérie kokomisa nga bongo te oh Pasi ya bolingo ezalaka nde somo Moto soki olingi ye, alingi na'e souffrance Okokoma kizengi, okomi komisambwisa Ah mama, kosalaka ngai boye te Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te Nzoto ya chérie epesaka ngai nde malade Nzoto ya mama engengaka lokola mwinda (flash) Soki atelemi wana nga nakufi Soki a fâcher nakomi komilela lela Omoni ndenge nga nakomaka zoba, zoba Soki aseki nga nakomi gentil, gentil Osala nini po ngai nakoma se kodenge mama? Ah mama, kosala ngai boye te Eh chérie, kokomisa ngai bongo te oh Pasi ya bolingo ezalaka nde somo (Lukusa) Moto soki olingi ye, alingi na'e souffrance Okokoma kizengi, okomi komisambwisa Ah mama, kosalaka ngai boye te Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te Chérie pesa nga mwa bisou na litama Wana nga nabosana liwa ezalaka Chérie suwa ngai moke na litoyi Wana ngai nabosana la mort ezalaka Omoni ndenge nga nakomaka zoba, zoba Omoni ndenge nga nakomaka trouble, trouble Omoni ndenge mayi etangaka nga na miso Ah mama, kosalaka ngai boye te ma Ah, pardon kokomisa ngai zoba te Pasi ya bolingo ezalaka nde somo (Lukusa) Moto soki olingi ye, alingi na'e souffrance Okokoma kizengi, okomi komisambwisa Ah mama, kosalaka ngai boye te Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te Martin matisa bolingo esika nalingaka (eh) Wana esika nga nakomaka kotitila (eh) Lukusa matisa bolingo esika nalingaka (eh) Wana esika nga nakomaka kodiembela (eh) Kitisa, kitisa (martin), kitisa, kitisa, o bloquer (Lukusa, Lukusa) Allez, matisa, matisa, matisa, matisa, o bloquer (Lukusa Martin, Lukusa) Omoni ndenge nga nakomaka zoba, zoba Omoni ndenge mayi etangaka nga na miso Omoni ndenge, ooh, ooh, ooh Omoni ndenge, aaahn, aaahn, aaahn Omoni ndenge, ooh aaahn, aaahn Omoni ndenge, aaahn, aaahn, aaahn Omoni ndenge mayi etangaka, ooh Omoni ndenge nga nakomaka zoba, zoba Ah Martin, kosalaka ngai boye te oh Shuut, secret koyebisa ango moto te (Dédicaces)